Lyrics: MOTEMA YA JOB

Lyrics: MOTEMA YA JOB

A/C  Aimé NKANU

Dans l'Album "Parfum"

PAROLE:   Comme en hiver Seigneur j’ai très froid, pourtant nous sommes en plein climat

                chaud. Rien ne marche. J’ai ne pas peur, je sais que tout ira mieux.

                Si vous ne rencontrez pas le diable dans votre chemin, alors vous faites route

               ensemble avec lui .

 

1. - Pesa ngai motema ya Job, ngai mowumbu na yo

        Nakoki kofinga kombo na yo te, ata ba pasi eluti ngai

        Naza lokola okati ya ebale monene bokati ya masuwa

        Eza kotiola moyen na katisa ezali te. Elikia se na yo.

 

2.- Bo liboso na bungisaki (kufelaki) ebele na mbala moko,

       Consolation ya bato, ekokaki te, ata ba mbongo to mpe nini

       Baninga na nga nionso bakimaki ngai.

 

3.- Ndenge nga na  komaki ba mokili ba kanisaki mabe   

       Nami kangeleki na ndako na kima menace ya bato

       (matongi) ya bato

 

4.- Na komaki komituna, Nzambe mpo na nani osalaka boye.

       Pasi nionso kaka ngai et pourtant na salelaka yo

       (na bangaka yo). Sima ya nionso wana moninga (na nga)

        ya motema akeyi yango na sengi na Yesu pesa nga

        motema ya Job.

           

PAROLE:   Epayi topesa ba sujets de prière ekoma na ngo masolo na bango na

               ba téléphone. Mon rédempteur est vivant, il se lèvera le dernier.

               Dans le moment difficile qu’on reconnaît les meilleurs amis.

 

Encore une fois les solos : 1; 2;3; et 4

 

 Refrain : Yesu, Yesu, Yesu nga muwumbu na yo kotika nga te

                Yesu, Yesu, Yesu ga nasengi na yo motema ya Job.

 

 5.-  Pasi ya motema na nga moto ayebi te oh,

       Nalela ngo na nani

       Molimo mosantu consoler nga.

 

 6.-  Pinzoli etangi nga na miso,

       Choc eleki makasi yaka osunga ngai

 

 7.-  Ata ba kofinga, ata ba kotonga, ata ba koyina nga na

       Tingama se na yo Yesu eh

 

 8.-  Yu yu yu kolela na mpasi nani ayokela na mawa.

       Nalela na nani bongo akawusa pota na nga.

       Maloba motema na nga emati na yo libondeli na nga  

 

 Refrain : Yesu, Yesu, Yesu nga muwumbu na yo ...